FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

kaka
káka
only, just
always, still
ata ezui mayi ekopela kaka
ata ezui mayi ekopela kaka
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
yo kaka
yo kaka
© pvh
see also : bobele,
item 22 examples (bandakisa ntúkú míbalé na míbalé) ...
nakolinga kaka komona yo
I desire just (only) to see you
ntango wana, tolyaka kaka madesu na mayi
at that time (in those days), we only ate beans with water.
nazozela kaka
I'm just waiting.
nalingi ye lisusu te. Nabimi na ye kaka boye.
I don't love her anymore. I went out with her just like that.
mbote, boni nzoto ? nga naza malamu. nalingaki kaka napesa yo mbote
Hello, how's the body (the health) ? I'm doing well. I just wanted to greet you.
oza kaka awa ?
Are you still here ?
Namoni ozangi eloko ya kosala. Luka ata mosala ko ! kaka koyungana boye...
I see that you lack something to do. Look even for a job, come on ! just wandering like that...
makayabu na fumbwa ! ezangi kaka loso kasi naza na nzala !
makayabu and fumbwa ! Only rice is missing, but I'm hungry !
awa tosalaka kaka na baboti na biso
Here we are just with our parents
kaka ngai nde nazosala misala nioso ya ndako
There's only me who does the all the chores of the house .
kaka yo nde oza koluka makambo awa
There's only you who seeks trouble here
baninga na ngai nioso bazali na motuka. etikali kaka ngai
All my friends have a car. Only I remain.
loboko na yo kitoko penza. ebongi kaka osala manzaka.
Your hand is really beautiful. You should just do your nails.
yo oza na bizaleli kaka neti mama na yo
You just have a behaviour like your mother.
bato nyonso bazali awa, tozozela kaka yo.
Everyone is here, we're just waiting for you.
aza kaka mwana muke. Kopesa ye bazoka te.
He's only a small child. Don't give him chewing gum.
pona nini mikolo oyo oza kolia kaka madesu ?
Why all you do these days is eat beans ?
nasali kaka mikate zomi.
I only made 10 fritters.
Akoya lelo lisusu te. Akoya kaka lobi.
She will not come anymore today. She will just come tomorrow.
ngai nalingaka kobota bana mibale kaka
Me, I want to give birth to just two children.
Osundola mwasi na yo na bana kaka boye.
You abandonned your wife and the children just like that.
namonaka ye neti kaka ndeko na ngai
I see her only like my sister
káká
cramped
item 1 example (ndakisa mókó) ...
liberté na ngai, na kaka te !Proverb/expression (don't translate litteraly)
my freedom, you don't narrow it down !
1000
nkóto (mókó)
item Article : Counting and numbers
P.S. you can just enter any number on this site and it will be translated into lingala

0
zero (0)libungutulu, eloko te (nothing)

1-10
1mókó
2míbalé
3mísáto
4mínei
5mítáno
6motóbá
7nsambo
8mwámbe
9libwá
10zómi

powers of 10
10zómi
100nkámá (mókó)
1000nkóto (mókó)
10000monkoko (mókó)
20000minkoko míbalé
100000elundu (mókó)
1000000efuku (mókó)

for milion, you'll also hear : efuku, makiasi, epuna

11-99
11zómi na mókó
15zómi na mítáno
20ntúkú míbalé
21ntúkú míbalé na mókó
32ntúkú mísáto na míbalé
43ntúkú mínei na mísáto
54ntúkú mítáno na mínei
67ntúkú motóbá na nsambo
78ntúkú nsambo na mwámbe
89ntúkú mwámbe na libwá
95ntúkú libwá na mítáno

100-1.000
100nkámá (mókó)
101nkámá (mókó) na mókó
110nkámá (mókó) na zómi
115nkámá (mókó) na zómi na mítáno
120nkámá (mókó) na ntúkú míbalé
126nkámá (mókó) na ntúkú míbalé na motóbá
157nkámá (mókó) na ntúkú mítáno na nsambo
200nkámá míbalé
201nkámá míbalé na mókó
210nkámá míbalé na zómi
222nkámá míbalé na ntúkú míbalé na míbalé
500nkámá mítáno
753nkámá nsambo na ntúkú mítáno na mísáto

1.000-10.000
1000nkóto (mókó)
1234nkóto (mókó) na nkámá míbalé na ntúkú mísáto na mínei
9875nkóto libwá na nkámá mwámbe na ntúkú nsambo na mítáno

other examples
9libwá
39ntúkú mísáto na libwá
539nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
7539nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
47539minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
847539bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
6847539bifuku motóbá na bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá

e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2017 lingala facile 2018
privacy & cookies