FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

tous les mots avec le tag verbes en [ko...o]
komóno, construction régulière (racine : mon) (classe 15 : ko- (verbes))
komóna, construction régulière (racine : mon) (classe 15 : ko- (verbes))
voir, apercevoir
rencontrer
voir aussi : kotála
tags :
item 27 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na nsambo) ...
nakolinga kaka komona yo
je désire juste (seulement) te voir
Kosa liwa, bongo omona batu bakolela yo.
Fais semblant d'être mort, et comme ça tu verras qui pleuront pour toi.
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Quand il pleuvait sur la maison de ton ami, tu trouvais ça insignifiant, mais le jour que c'est tombé sur toi c'est devenu un problème.
Tambola na mokili, bongo omona makambo. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Fais le tour du monde et comme ça tu vois les problèmes.
ezali esengo na ngai po na komona moko na moko na bino na liyangani oyo na sima ya nzanga.
C'est pour moi une joie de revoir chacun de vous dans ce culte de l'après midi.
Namonaki ye. Alataki elamba te.
Je l'ai vu. Elle ne portait pas de vêtements.
Namonaki ndunda yango mbala ya liboso.
Je voyais ce légume pour la première fois.
Nakoki komona eloko te mpo na molili.
Je ne pouvais rien voir parce qu'il faisait noir.
Mokolo moko, nguma akendeki bokila na zamba. Amonaki nyama moko ya monene na amelaki ye mobimba.
Un jour le python était allé à la chasse dans la forêt. Il avait vu un grand gibier et l'a avalé entièrement.
Soki miso na yo ezali malamu, okomona polele penza
Si tes yeux sont bien, tu verras vraiment clair.
nakoki komona yango ?
Je peux voir ça ?
Soki omonaka nzoto ya yo kilo, tala ya baninga se bongo Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Si tu regardes ton corps avec respect, regarde celui de ton voisin juste comme ça
lala malamu. - yo pe, motema na ngai, noki tomonana. nalela yo makasi.
Dors bien. - Toi aussi, mon coeur, que vite on se voie. Je t'aime fort. (en lingala : "je t'ai beaucoup aimé" - passé)
bomoni momie wana ? azokosa biso. nakotchoukouté !
Vous voyez la nana là-bas ? Elle est en train de nous mentir. Je vais la tchoukouter !
Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
Dans le coeur je savais que c'était mauvais, mais je ne voyais pas d'autre façon d'agir.
namoni texto na yo kala te
J'ai vu ton message il n'y a pas longtemps
Namoni ozangi eloko ya kosala. Luka ata mosala ko ! kaka koyungana boye...
Je vois que tu manques quelque chose à faire. Cherche même un travail, dis ! juste vagabonder comme ça...
yo okozwa mbata okomona !
Toi, tu vas attraper une gifle, tu vas voir !
tokomonana mokolo mosusu
on se reverra un de ces jours.
naza na posa ya komona yo lelo
J'ai envie de te voir aujourd'hui
nazokende epayi ya munganga atala liso na ngai. nazomona malamu te.
Je suis en train d'aller cher le docteur pour qu'il regarde mon oeil. Je ne vois pas bien.
otie biloko na ngai wapi. nazomona yango te.
Tu as mis tes affaires où ? Je ne les vois pas.
soki loboko eyebaka pasi oyo lutu emonaka na tango ya kobalusa biloko
Si la main savait comment la cuillère souffre au moment de tourner la nourriture...
Nawuti komona bambila mwambe liboso ya ndako.
Je viens de voir 8 policiers devant la maison.
Namona baleki na ngai kala.
Ça fait longtemps que je n’ai pas vu mes frères.
nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
Je ne veux plus voir ce fou dans ma maison.
namonaka ye neti kaka ndeko na ngai
Je la vois juste comme ma sœur
autres mots avec le tag 'verbes en [ko...o]' : komóno, kobongo, kopono, kolokoto, kosono, kotoko, kotóndo, kokóto, konétolo
kobongo, construction régulière (racine : bong) (classe 15 : ko- (verbes))
kobonga, construction régulière (racine : bong) (classe 15 : ko- (verbes))version moderne
s‘améliorer, s'arranger, convenir

kobongisa
arranger, améliorer, réparer, restaurer, corriger
guérir quelqu'un

kobongama
se préparer, se positionner

ebongi
il convient
souvent traduit par il faut
dérivés : mobongisi, bobongisi
tags :
item 27 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na nsambo) ...
tshombo na yo ebongi te ? okosomba ya sika ?
Ton GSM ne n'est pas réparé ? Tu vas acheter un nouveau ?
Afrika ekobonga
l'Afrique va s'arranger
pona kokola malamu ebongi komela mayi mingi
Pour bien grandir il convient de boire beaucoup d'eau
kokota na ndako sikoyo te. nazobongisa.
N'entre pas dans la maison maintenant. Je suis en train d'arranger.
babongisi banzela oyo. tokoki koleka na mutuka.
Ils ont arrangé ces routes. On peut passer en voiture.
munganga alobi ebongi omela mayi mingi.
Le médecin a dit, il convient de boire beaucoup d'eau.
lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
Comment il faut te faire savoir d'arrêter de prendre ce médicament ?
masolo ya kati ebongaka mutu ayeba te.
Les conversations secrètes, il faut que personne ne le sache.
mwasi kitoko, ebongi abala.
Une belle femme, il faut qu'elle se marie.
loboko na yo kitoko penza. ebongi kaka osala manzaka.
Ta main est vraiment jolie. Il faut juste que tu fasses tes ongles.
ebongi opakola mafuta na loposo na yo.
Tu dois mettre de l'huile sur ta peau.
biloko oyo, mafuta ekoki te. ebongi obakisa.
Cette nourriture, il n'y a pas assez d'huile. Il faut que tu rajoutes.
ebongi obongisa esika oyo. bapaya bazali koya.
Il faut que tu arranges cet endroit. Les gens arrivent.
ebongi okeba. na zamba oyo baniama bazalaka ebele.
Il faut que tu fasses attention. Dans cette forêt il y a beaucoup d'animaux.
nazoyoka lino pasi ebongi nakende epayi ya munganga
J'ai mal à la dent. Il faut que j'aille chez le médecin.
ebongi osokola motuka na yo libanda
Il faut que tu laves ta voiture dehors.
ebongi kofuta baniongo oyo nioso
Il faut payer toutes ces dettes.
ebongi omela bankisi na yo pona obika.
Il faut que tu prennes tes médicaments pour guérir.
ebongi penza kokeba na batu wana.
Il faut vraiment faire attention à ces gens là.
ebongi obima na mwana na yo po azua mopepe
Il faut que tu sortes avec ton enfant pour qu'il prenne de l'air.
ebongi totosa mobeko oyo pona tozala na kimia
On doit respecter cette loi pour qu’on soit en paix.
Bomoyi ezali pete te. Ebongi kobunda.
La vie n'est pas facile. Il faut se battre.
Mwana ebongi amela miliki pona akola malamu.
Un enfant doit boire du lait pour bien grandir.
ebongi ozala mosika na mwasi wana
Il faut que tu restes loin de cette femme.
Bongisa ndako. Eza salite makasi.
Arrange la maison. C’est très sale.
Soki bato mibale bayokani te ebongi bakabwana.
Si deux personnes ne s’entendent pas ils doivent se separer.
Ebongi okanga monoko na yo.
Tu dois fermer ta bouche.
kopona, construction régulière (racine : pon) (classe 15 : ko- (verbes))version moderne
kopono, construction régulière (racine : pon) (classe 15 : ko- (verbes))
choisir, élire, voter
pona bomengo ya mikili
pona bomengo ya mikili
© théâtre : groupe Stargate
tags :
item 3 exemples (bandakisa mísáto) ...
nzambe apesa biso bonsomi ya kopona
Que Dieu nous donne la liberté de choisir
naponi kombo moko ya kitoko
J’ai choisi "un de ces" beaux nom.
Naponi yo pamba te nayebi yo.
Je t'ai juste car je te connais.
kolokota, construction régulière (racine : lokot) (classe 15 : ko- (verbes))
kolokoto, construction régulière (racine : lokot) (classe 15 : ko- (verbes))archaïque
ramasser
collecter
dérivés : elokota
tags :
item 3 exemples (bandakisa mísáto) ...
alokotaka na nse atomboli likolo
Il ramasse par terre, Il soulève.
lokota bisaka na yo
Ramasse tes affaires !
nayebi te esika nini moninga na ngai akendaki kolokota ye wana.
Je ne sais pas où mon ami a été ramasser celle-là
kosona, construction régulière (racine : son) (classe 15 : ko- (verbes))
kosono, construction régulière (racine : son) (classe 15 : ko- (verbes))
coudre
kosona
kosona
src : SEEDSvision
kosona
kosona
src : youtube - SEW UP
dérivés : mosoni
tags :
kotoka, construction régulière (racine : tok) (classe 15 : ko- (verbes))
kotoko, construction régulière (racine : tok) (classe 15 : ko- (verbes))
transpirer, puiser, faire couler

kotokisa
(faire) bouillir
bacables ezotokatoka na sima ya mvula
bacables ezotokatoka na sima ya mvula
src : Lingala Facile
dérivés : motoki, matoki
tags :
item 5 exemples (bandakisa mítáno) ...
okei na pompi, ofungoli robine, otoki mai na kopo
Tu vas à la pompe, tu ouvres le robinet, tu fais couler l'eau dans le gobelet
nazotoka motoki
Je suis en train de transpirer
bacables ya courant ezotokatoka awa na sima ya mvula
les cables d'électricité bouillent ici après une pluie
basumbaka te esika batokaka mayi
on ne fait pas caca à l'endroit où on puise l'eau.
liki batokisa
l'oeuf dur (oeuf cuit)
kotóndo, construction régulière (racine : tond) (classe 15 : ko- (verbes))
remercier
prier, supplier
dérivés : botondi, litóndi
tags :
item 1 exemple (ndakisa mókó) ...
natondi yo botondi
Je te remercie
autres mots avec le tag 'merci' : botondi, litóndi, litondo, kotóndo, losaka
kokóta, construction régulière (racine : kot) (classe 15 : ko- (verbes))version moderne
kokóto, construction régulière (racine : kot) (classe 15 : ko- (verbes))
entrer
pénétrer

kokótela
intervenir pour...
prendre la défense de quelqu'un
moyibi akokota na lininisa
moyibi akokota na lininisa
src : google images
nani akoti na ezibeli ya niaou ?
nani akoti na ezibeli ya niaou ?
src : google images
kota na kati
kota na kati
src : google images
tags :
item 14 exemples (bandakisa zómi na mínei) ...
akoti na kati
il est entré à l'intérieur
Kokota zamba yo moko te.
N'entre pas dans la forêt tout seul.
Nayebi ete akotelema moto ya suka na bomoyi na ngai. Akotelema akokota likambo na ngai. Yaweh telema, kota makambo na ngai. Akotelema akokata ma condamnation. © Cèdre Katambayi
Je sais qu'il se lèvera le dernier dans ma vie. Il va entrer dans mon affaire. Dieu lève-toi, entre dans mes affaires. Il va se lever pour couper ma condamnation.
kokota ofele
entrée gratuite
kofuta nyongo. kokota nyongo.
Payer la dette. Entrer dans la dette (s'endetter).
nazokotela yo
Je suis en train de prendre ta défense
nani akoti na ezibeli ya niaou ?
Qui entre par la porte du chat ?
leta aboyi mapapa ekota na kati ya centre ville
l'état refuse que les babouches entrent dans le centre ville
kokota muasi cave
attention - contenu sensible
Benteke abeti bale, kasi ekoti te
Benteke shotté le balon, mais ce n'est pas entré
kokota na ndako sikoyo te. nazobongisa.
N'entre pas dans la maison maintenant. Je suis en train d'arranger.
kokota epayi na biso boye te
N'entre pas chez nous comme ça.
Ndenge nini osali pona kokota awa ?
Comment tu as fait pour entrer ici ?
akokota na kati ya ndako oyo te.
Elle ne va pas entrer dans cette maison.
konétola, construction régulière (racine : netol) (classe 15 : ko- (verbes))version moderne
konétolo, construction régulière (racine : netol) (classe 15 : ko- (verbes))
élever, soulever


contexte : église
exalter, magnifier
tags :
item 1 exemple (ndakisa mókó) ...
Akumisama, asanjolama, anetolama, libela na libela.
Qu'Il soit loué, qu'Il soit glorifié, qu'Il soit magnifié, pour les siècles des siècles.
autres mots avec le tag 'église' : abé, altáre, anjelu, apóstolo, avénti, mondimi, batísimu, bibele, bosántu, bosáto, ékelézya, eklézia, elikia, elikya, elónga, etónga, eyamba, kindoki, kristo, likámwisi, lingómbá, lokúmú, losámbo, molimo, mopakano, mosántu, ndoki, ngolu, nguya, nzámbe, óstia, pápa, proféta, sángó, sutáni, zábolo, kosandjola, kopambola, kobonda, lisúmu, eklézya, kobenisa, mosumuki, moseniele, kosamba, mopagano, mokristo, mobíkisi, misioni, mísa, masiya, libóndeli, batísimo, lisúmá, liyangani, mamélo, yesu, molema, molimu, likámuisi, moniangó, monzemba, mpúngú, lífelo, nkémbo, lóla, bondoki, pasitele, bondimi, mpate, mumpe, Yawé, yézu, moklísto, kembo, zábulu, mosánto, Yaweh, pasta, kosanjola, lipamboli, elikiya, konétola, likámwa, likámua, ekelézia, kristu, mpatá, mobáteli, monzimi, konétolo, etumbele, maséle, ndákonzámbe, tempélo, lisanjoli, Yahweh, mokangoli, likámoa, likamóisi
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies