FR EN NL

vertaling / woordenboek Lingala - Nederlands

congo rdc
Zin :

bolingo
bolingo (klasse 14 : abstracte naamwoorden - geen meervoud)
liefde, tederheid, zachtheid
vriendschap
Congo bolingo
Congo bolingo
src : Air Mail Music
tozali kosambela kasi bolingo eza te
tozali kosambela kasi bolingo eza te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
bolingo, mibeko, misala
bolingo, mibeko, misala
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
bolingo, mibeko, misala
bolingo, mibeko, misala
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
afgeleid van : kolinga
zie ook : bolingi, lolango
item 14 voorbeelden (bandakisa zómi na mínei) ...
bato balakisaki ngai bolingo na mokili © Maman Micheline Shabani, La réponse
De mensen hebben me de wereldse liefde getoond
Lokuta ebomaka bolingo
bedrog doodt de vriendschap
Bolingo na biso mibale ekosila te.
De liefde tussen ons twee zal niet eindigen.
Bolingo ezalaka lokola lisano.
Liefde is als een spel.
Oza kitoko makasi ndeke na ngai ya bolingo
Je bent heel mooi, mijn liefdesvogeltje
yo na Mady bolingo
Jij en Mady dat is liefde
pona nini bolingo ya mosika esimbaka te ?
Waar houdt liefde op afstand geen stand ?
bolingo ezali elengi soki balingi yo
liefde is aangenaam als men van je houdt
Bolingo ya Kristo ezali kotambwisa biso © 2 bakorentien 5:14
De liefde van Christus dwingt ons
bolingo ezali kati na biso soki tozali na bomoko
Er is liefde tussen ons als we verenigd zijn
obebisi bolingo na biso
Je hebt onze liefde bedorven
luka mwasi moko oyo akolinga yo na bolingo ya solo
Zoek een vrouw die je zal liefhebben met echte liefde.
mbote, bolingo na ngai.
Hallo, mijn liefje.
na libala, koswana elakisaka bolingo. © Tabu Ley Rochereau
In het huwelijk betekent ruzie maken : liefde.
1000
nkóto (mókó)
item Article : Tellen en getallen
P.S. je kan in deze site om het even welk nummer ingeven en het zal naar het lingala vertaald worden.

0
nul (0)libungutulu, eloko te (niets)

1-10
1mókó
2míbalé
3mísáto
4mínei
5mítáno
6motóbá
7nsambo
8mwámbe
9libwá
10zómi

machten van 10
10zómi
100nkámá (mókó)
1000nkóto (mókó)
10000monkoko (mókó)
20000minkoko míbalé
100000elundu (mókó)
1000000efuku (mókó)

voor "miljoen" hoor je soms ook : efuku, makiasi, epuna

11-99
11zómi na mókó
15zómi na mítáno
20ntúkú míbalé
21ntúkú míbalé na mókó
32ntúkú mísáto na míbalé
43ntúkú mínei na mísáto
54ntúkú mítáno na mínei
67ntúkú motóbá na nsambo
78ntúkú nsambo na mwámbe
89ntúkú mwámbe na libwá
95ntúkú libwá na mítáno

100-1.000
100nkámá (mókó)
101nkámá (mókó) na mókó
110nkámá (mókó) na zómi
115nkámá (mókó) na zómi na mítáno
120nkámá (mókó) na ntúkú míbalé
126nkámá (mókó) na ntúkú míbalé na motóbá
157nkámá (mókó) na ntúkú mítáno na nsambo
200nkámá míbalé
201nkámá míbalé na mókó
210nkámá míbalé na zómi
222nkámá míbalé na ntúkú míbalé na míbalé
500nkámá mítáno
753nkámá nsambo na ntúkú mítáno na mísáto

1.000-10.000
1000nkóto (mókó)
1234nkóto (mókó) na nkámá míbalé na ntúkú mísáto na mínei
9875nkóto libwá na nkámá mwámbe na ntúkú nsambo na mítáno

andere voorbeelden
9libwá
39ntúkú mísáto na libwá
539nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
7539nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
47539minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
847539bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá
6847539bifuku motóbá na bilundu mwámbe na minkoko mínei na nkóto nsambo na nkámá mítáno na ntúkú mísáto na libwá

e-mail : dic@lingala.be
 

interessante filmpjes : lingala facile 2017 lingala facile 2018
AD HERE
privéleven & cookies