FR EN NL

vertaling / woordenboek Lingala - Nederlands

congo rdc
Zin :

solo
sóló
echt, waar
waarheid
bwaka mayi na wc. zala motu ya solo.
bwaka mayi na wc. zala motu ya solo.
src : google images
solo, nalingi
solo, nalingi
© Grand Hotel Kinshasa
zie ook : bosolo
item 11 voorbeelden (bandakisa zómi na mókó) ...
ezali ya solo !
het is waar! het is de waarheid!
Wana ezali ya solo, kosakana te.
Dit is waar, maak geen grappen.
Eza ya solo ? - Te, eza lokuta !
Is het waar ? - Neen, het is een leugen !
Soki oyo ezali ya solo, nakufa.
Als dat waar is, sterf ik.
bwaka mayi na wc. zala motu ya solo.
Gooi water in het toilet. Wees een echte vent.
solo te !
niet waar !
pondu na yo ezangi mungwa. pasi ya solo.
uw pondu mist zout. echt spijtig.
ozali po na nga eyano na mikakatano, nzela ya solo ya kotambola, yesu na nga, kumama
Je bent voor mij het antwoord op de problemen, de ware weg om te begaan, mijn Jezus, wees geprezen
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Gezegde/uitdrukking (niet letterlijk vertalen)
De mond van de ouderling ruikt vies, maar de woorden zijn waarheid.
luka mwasi moko oyo akolinga yo na bolingo ya solo
Zoek een vrouw die je zal liefhebben met echte liefde.
ozalaka ndeko na ngai ya solo te.
Je bent niet mijn echte zus.
solò
nsolò, mv. bansolo (klasse 9/10 (2) : - / - (ba-) : meervoud onveranderlijk uit contekst (of informeel/modern ba-))geuite medeklinker
geur
item 11 voorbeelden (bandakisa zómi na mókó) ...
Mosala na zolo ezali koyoka solo na kopema.
De taak van de neus is om geuren te ruiken en te ademen.
oooh, solo kitoko. mama azolamba ntaba
oooh, het ruikt lekker. Mama is geit aan het klaarmaken.
kolumba monoko solo eza maladi to te ?
Is stinken uit de mond een ziekte of niet ?
Monoko ya mobange, elumbaka solo, kasi elobaka makambo ya lokuta te. soki okimi solo wana, okoyeba makambo te. Gezegde/uitdrukking (niet letterlijk vertalen)
De mond van de ouderling, hij ruikt vies, maar spreekt geen leugens. Als je deze reuk ontvlucht, zal je de zaken niet kennen.
masoko solo ya fumbwa epola banda sanza moko
billen die ruiken naar fumbwa die sinds een maand rot is
bana bakoki kotanga malamu te likolo ya makelele ya wenze mpe solo ya fulu bron: Espérance-François Ngayibata Bulayumi, Mosuni
De kinderen konden niet goed studeren omwille van het lawaai van het marktje en de geur van het stort.
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Gezegde/uitdrukking (niet letterlijk vertalen)
De mond van de ouderling ruikt vies, maar de woorden zijn waarheid.
hum... solo kitoko na makusa. mama azolamba nini ?
mmmh... Het ruikt goed in de keuken. Wat is mama aan het klaarmaken ?
mwasi ya zemi akokaka basolo mususu te.
Een zwangere vrouw verdraagt sommige geuren niet.
bilamba na ye ezali na solo ya mapeka.
Zijn kleren hebben een okselgeur.
Nayoki nsolo malamu na nzoto na ye.
Ik rook een aangename geur aan haar lichaam.
sóló, mv. basolo (klasse 9/10 (2) : - / - (ba-) : meervoud onveranderlijk uit contekst (of informeel/modern ba-))
aubergine
solo
solo
© pvh
solo
solo
© pvh
tags :
andere woorden met de tag 'groenten en fruit' : ananási, bikedi, eloló, bitekuteku, bonsáó, dongódongó, ekéké, ekútu, esápa, etabe, etabi, fumbwa, kwánga, lidésu, likémba, lilála, lingolo, litungúlu, liyebo, lisángó, mbálá, mbika, mbíla, mbuma, ndúnda, ngúba, paipái, payipayi, pilipili, pondú, pwaró, tomati, tondolo, ndímo, likásu, kokotí, likombó, liyebú, mosángó, liboké, kúnde, lisángú, libengê, mbomá, avoká, savoká, mpondú, lidamé, lipéla, litóngé, payi, linanási, ndiká, pakápáka, mokókóló, linioko, misili, sáfú, tomato, sakasáka, nkúnde, pili-pili, ndembi, limona, likásó, lilebó, mongúba, nsáfú, bonsau, ngombo, gombo, mondiká, sóló, sinda, mondéngé, mundenge, biteku-teku, mádamé, poilu, liebú, mazulu, mungenge, ananá, ananási
e-mail : dic@lingala.be
 

interessante filmpjes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privéleven & cookies