FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

kobeta
kobeta, form of a verb
kobéta, regular construction (root : bet) (class 15 : ko- (verbs))modern version
kobéte, regular construction (root : bet) (class 15 : ko- (verbs))
from the english "to beat"

to beat
to hit, to kick
to play (a musical instrument, ball, football, basketball, ...)
to rain
derived words : ebételi, ebétele, mobeti
tags :
item 37 examples (bandakisa ntúkú mísáto na nsambo) ...
nabetaka bale. / kobeta ndembo.
I play football. (I hit the ball (habit)) / To play with a ball.
Pamela abetaka guitar
Pamela plays the guitar
tobetaka basket
we play basketball
beta, bakofungola
knock, they will open
kobeta masolo
to discuss
nakobeta yo !
I will hit you !
Werra akobeta lobi
Werra plays tomorrow
Nkolo azali kobeta na porte.
The Lord is knocking at the door
Motema na ngai ezali kobeta po na yo
My heart beats for you
Mbula ebeti. Mbula ezobeta.
It rains. It's raining.
abetami lokola nioka.
He was beaten like a snake.
kobeta mayi
to bathe, take a bath
Nabetaki maboko makasi mpona bango.
I applauded hard for them.
kosopa mai / kosopa mpowa / kobeta mai
to ejaculate
kosakana te na ngai to nakobeta yo
Don't laugh with me or I will hit you.
kobeta miziki
To play music
Benteke abeti bale, kasi ekoti te
Benteke kicked the ball, but it didn't go in
kobeta lisolo
to tell (a story)
leki na nga ya mobali alingaka kobeta ndembo
My little brother loves to play football
kobeta mwasi na yo boye te. ezali mabe
Don't hit your wife like that. It's bad.
kobeta bana te. lobela bango malembe
Don't hit the children. Talk calmly to them.
mbula ekobeta lelo te. kobanga te.
It's not gonna rain today. Don't be afraid.
mikolo oyo mbula ezobeta makasi.
These days it's raining hard.
tofandi na biso libanda. tozobeta masolo.
We sit outside together. We are talking.
leki na nga ya mobali abetaka na ekipe ya congo
My little brother plays in the team of Congo.
nazolinga kobima kasi mvula ezobeta makasi.
I want to go out but it's raining hard.
nakobeta yo tii nakobuka yo mbanga.
I will hit you untill I will break your jaw.
Tika kobeta mukinza liboso na ngai
Stop farting in front of me
mbula ezobeta lisusu.
It's raining again.
Okoki kobeta ye te. Azali mwana mwasi
You may not beat her. She's a girl.
Nakobeta yo lokola mwana na ngai.
I will beat you like my child.
Abeti ngai pamba te abungisi mbongo na ye.
She hit me because she misplaced her money.
lelo, soki obeti ye, ngai nakoboma yo !
Today, if you beat her, me I will kill you !
kobosana te, soki omeki kobimisa sekele oyo tokobeta yo !
Don't forget, if you try to out this secret, we'll beat you up !
Obetaki mukinza tango olalaki
You farted when you were sleeping.
beta libaku
take a chance
kobeta libaku na zelo
to receive a super mega chance
other words with the tag 'loan word: english' : boyi, búku, bói, míliki, mótuka, pikási, kobéta, bulangeti, mutuka, kobéte, búku
other words with the tag 'verbs with [ko...e]' : kokende, kobeleme, kofole, kokipe, komele, kosambwe, kosambue, kokesene, kobéle, koseke, kolénge, komesene, kotéleme, kotéke, komeme, kobéte, kolangwe
libanga
libángá, pl. mabanga (class 5/6 : li- / ma- (parts of body, fauna, flora,...))
pebble, stone
electric battery
school blackboard
work


context : Congolese Songs
dedication ("dédicace" / they cite names of people during the song, bostly because they paid for it)


context : unit of measure
miserably small unit of measure

it holds about 100fc of peanuts or salt

the name probably comes from the expression kobeta libanga (break the stone)
or kozua libanga (get the stone). Small jobs, just to have at least something.
libanga ya mungua
libanga ya mungua
© pvh (Nadiyha)
tags :
item 6 examples (bandakisa motóbá) ...
libanga ya talo
kostbare steen, erts, (diamond,...)
Babwakaki mabanga.
They threw rocks.
mutu ya liboma abambi ngai libanga
The lunatic threw me a rock.
libanga moko ya monene ezalaki liboso ya motuka na ngai
There was a big stone in front of my car.
mosombi monene ya mabanga
big diamonds dealer
zebi ya mabanga
geology (science of rocks)
other words with the tag 'measuring units' : ekoló, emekeli, libángá, sakombi, kópo, vére, ebundeli, emekele
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies