FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

makambu
plural of "likambu"
likambo, pl. makambo (class 5/6 : li- / ma- (parts of body, fauna, flora,...))
likambu, pl. makambu (class 5/6 : li- / ma- (parts of body, fauna, flora,...))Kinshasa version
case (good or bad), problem
saying, speech, conflicting business
likambo ya makila
likambo ya makila
© théâtre : groupe 10 secteurs
ezali likambo ya mabele
ezali likambo ya mabele
src : google images
nionso makambu
nionso makambu
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
see also : mpokoso
item 28 examples (bandakisa ntúkú míbalé na mwámbe) ...
ozali kolukela ngai makambo.
you're telling me to look for problems.
likambo te
no problem, leave it
matondi mingi / melesi mingi. - likambo te.
thanks a lot. - No problem.
Likambo munene eluka banganga Proverb/expression (don't translate litteraly)
A big problem 'asks' for experts (a problem being big...)
Tambola na mokili, bongo omona makambo. Proverb/expression (don't translate litteraly)
Go around the world and so you'll see the problems
likambo nini ?
What's the problem ?
Nayebi ete akotelema moto ya suka na bomoyi na ngai. Akotelema akokota likambo na ngai. Yaweh telema, kota makambo na ngai. Akotelema akokata ma condamnation. © Cèdre Katambayi
I know he's gonna stand up as the last one in my life. He will enter into my business. God, stand up, enter into my business. He will stand up and interrupt my condemnation.
likambo ya motuya
an important case
kokata likambo
decide on a case, pronounce a verdict
Monoko ya mobange, elumbaka solo, kasi elobaka makambo ya lokuta te. soki okimi solo wana, okoyeba makambo te. Proverb/expression (don't translate litteraly)
The mouth of the elderly, it smells foul, but doesn't tell lies. If you avoid this smell, you will not know the affairs.
naza na makambo ebele ya kosala lelo
I have a lot of things to do today.
naza na likambo na yo te
I have no problem with you
naye po tosolola likambo wana
I came so that we discuss that problem
boni lelo oye tongo boye ? likambo ?
How come you came so early ? Is there a problem ?
koya lelo te. naza na makambu ebele ya kosala
Don't come today. I have a lot of things to do.
Nzambe akosala makambo ya minene.
God will do great things.
likambo oyo ekosila mokolo nini ?
What day will this problem end ?
likambo nini mwasi na ngai ? butu mobimba olali te.
What's the matter, my woman ? The entire night you didn't sleep.
kaka yo nde oza koluka makambo awa
There's only you who seeks trouble here
oye, opesi biso ata mbote te. likambo nini ?
You came, you didn't even salute us. What's the matter ?
pona nini oza kopela boye ? likambo eza te !
Why are you getting ignited like that ? There's no problem !
naza na likambo moko ya motuya ya koyebisa yo
I have something important to let you know.
naza kosala makambo ebele tango moko.
I'm doing a lot of things at the same time.
yo, makambo osali ezali pe malamu te
You, the things you did weren't good either.
soki oyebaki likambo nini eleki...
If you knew what happened...
Tanga makambo nyonso akomi
Read all that she has written.
zuzi akati likambo alima
The judge decided on the case correctly.
ye nde moluki makambu
Him, he's really a problem seeker.
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies