FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

kolekana
kolekana, forme d'un verbe
koleka, construction régulière (racine : lek) (classe 15 : ko- (verbes))
passer, dépasser

aussi la méthode de préférence pour faire un comparatif/superlatif en lingala. (voir article)


kolekisa
céder
laisser passer

kolekana
dépasser, surpasser, aller au delà
eloko eleki tika eza te
eloko eleki tika eza te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
bolingo eleki mbongo na valeur
bolingo eleki mbongo na valeur
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
dérivés : moleki, léki
item 28 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na mwámbe) ...
mobembo eleki malamu
le voyage est bien passé
Ntaba na bino elekaki awa.
Vos chèvres sont passées (par) ici.
Poso eleki, poso ekoya
la semaine passée, la semaine prochaine (qui vient)
eyenga eleki nayaki na liyangani ya mibale
le dimanche passé je suis venu au deuxième culte
Tobimisaki disque mbula eleki.
Nous avons sorti un disque l'année passée.
eloko moko te eleki nguya na Nzambe
Rien ne dépasse le pouvoir de Dieu (rien n'est impossible à Dieu)
ndenge ya komibatela : na capote. Nzela ya malamu koleka mpo na komibatela ezali kosalela capote
la manière de se protéger : avec le préservatif. Le meilleur moyen pour se protéger est d'utiliser un préservatif.
Wany aleki basi nyoso na kitoko.
Wany est la plus belle fille. (Wany dépasse toutes les filles en beauté)
naleki yo na mwindu. yo oleki ye kuna na molayi
Je suis plus noir que toi. Tu es plus grand que lui là-bas.
kombo na yesu eleki kisi
Le nom de Jésus est mieux qu'un médicament
soki okobima sikoyo te, er moko nakoleka na palais.
Si tu ne vas pas sortir maintenant, je vais passer à la maison dans une heure.
Oza elengi kofiba koleka mokuwa ya makoso. © Fally Ipupa
Tu es agréable à sucer plus que l'os des pieds de porc. (=délicatesse)
mikolo eleki ebele
Beaucoup de jours sont passés
tala ye kuna minu mpembe koleka nzambala ya pape. nsuki elingamalingama © Koffi Olomide
regarde la là-bas, les dents plus blanches que la robe du pape. Les cheveux bouclés en désordre.
ndaku oyo eleki ndaku kuna na kitoko
Cette maison-ci est plus belle que celle-là.
ntango mosusu boninga elekaka bondeko
Parfois l'amitié dépasse le lien familiale
bangotobobo bakima ntshik po nua eleki na bongo
Les idiots ont fui l'école parce qu'il y a trop de chanvre dans le cerveau
mokolo ndako aleki awa
Le propriétaire de la maison est passé ici
babongisi banzela oyo. tokoki koleka na mutuka.
Ils ont arrangé ces routes. On peut passer en voiture.
keba ! koleka awa te ! libulu moko ezali.
Attention ! Ne passe pas ici ! Il y a un trou.
koleka liboso na ngai te, ezopesa ngai kanda
Ne passe pas devant moi, ça m'énerve
kokoma na ndako te. leka mbala moko epayi ya tata na yo.
N'arrive pas à la maison. Passe une fois chez ton père.
litoyi elekaka motu te Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
L'oreille ne dépasse pas la tête.
eloko eleki tika eza te
rien n'est mieux que de laisser (tomber).
soki oyebaki likambo nini eleki...
Si tu savais ce qui s'est passé...
balabala eza nzela oyo mituka ekoki koleka.
Une rue c'est un chemin où les voitures peuvent passer.
Primus eleki lotoko na elengi
La Primus a un meilleur gout que le lotoko.
nalekisaki ngonga moko.
J'ai laissé passer une heure.
item Article : comparer
En lingala, la méthode préférée pour faire des comparatifs est avec le verbe koleka
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies