FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

tata
tata, pl. batata (class 1a/2 : - / ba-)
dad, father, man, Mr.
see also : papá, tata-leki, tata-koko
tags :
item 23 examples (bandakisa ntúkú míbalé na mísáto) ...
tata mosusu abimi libanda.
another man came out.
Tata azali na libanda. Benga ye.
Dad is outside. Call him.
tata kulutu
paternal uncle (older than Dad)
tata koko
grandfather
tata mwasi
paternal aunt
tata leki
paternal uncle (younger than Dad)
tata mobokoli
foster father, foster father
nayebi tata oyo, kasi nayebi tata wana te.
I know what this dad, but I do not know what dad then.
kati ya tata na mama na yo, nani asalaka ?
Between your father and your mother, who works ?
Tata na Ida, kombo na ye Théo.
Ida's father, his name is Theo.
tata na ye akufaki liwa ya mbalakaka.
his father died an unforeseen death
bomoyi ebandaka ntango liki ya mama ekutani na momboto ya tata.
Life begins when the egg of the mother meets with the sperm of the father.
tata, mama, ndeko, tofuta mpaku ya mabele, po totonga ville ya kinshasa
papa, mama, cousin, let's pay the ground tax, so that we build the city of Kinshasa
mama ya batisimo / mama wa batisimo / mama mobatisi. tata ya batisimo / tata wa batisimo / tata mobatisi.
godmother. godfather.
tata wa biso
Our Father (prayer)
kolia biloko ya tata na yo te. lia biloko mosusu
Don't eat your father's food. Eat something else.
kende kosomba mapa pona tata na yo
Go buy bread for your father
tata na yo azoya lelo kotala yo
Your father comes to see you today.
tata naza na posa ya mbongo po nasomba bilamba
Father, I need money to buy clothes.
kokoma na ndako te. leka mbala moko epayi ya tata na yo.
Don't arrive home. Pass at your dad's place for once.
biso na bino, tozali bana ya tata moko na mama moko
we and you, we are children of the same father and the same mother.
tata na ngai pe asombi motuka
My dad too bought a car.
mutu na ye ekokani na oyo ya tata na ye
His head ressembles the one of his father.
other words with the tag 'family' : mobóti, bokilo, bolóngani, bondeko, bonyangó, bosángó, bozéngé, ebóto, etike, nkulútu, léki, libála, libota, lipása, mama, litshombé, mwana, ndeko, nókó, papá, semeki, tata, yayá, kóko, nkóko, moana, muana, mobokoli, ya, nsimba, nzuzi, kulútu, kolonga, litsombé, mama-leki, tata-leki, tata-koko, mama-kulutu, mama-koko
kulutu
nkulútu, pl. bankulutu (class 1a/2 : - / ba-)sonorous consonant
kulútu
nkolóto, pl. bankoloto (class 1a/2 : - / ba-)
elder, old

boss
owner
see also : mama-kulutu
tags :
item 5 examples (bandakisa mítáno) ...
mama kulutu
maternal aunt (older than Mom, Mom's older sister)
tata kulutu
paternal uncle (older than Dad)
mama kulutu na biso azalaka baba.
My maternal great-aunt is deaf-mute.
maman nkulutu na biso azobela makasi
The big sister of my mother is very sick.
papa nkulutu na biso azalaka mutema mabe
The big brother of my mother is wicked.
item Article : consonants
In Lingala, sometimes you hear "nsoso" and sometimes you hear "soso". You might get the impression that
it would be free to choose wether to use the first letter m or n when the word starts with two consonants,
but in reality there is a precise rule for it :

In lingala, the first letter m or n may be ommitted for words that start with mp, nt, ns or nk.
(The voiced consonants - FR: Les consonnes sonores)

NK
nkama / kamacent
nkingo / kingocou
nkisi / kisimédicament
nkulutu / kulutuaîné
nkoba / kobatortue
MP
mpinzoli / pinzolilarme
mpo / popour
mpamba / pambanul
mpuku / pukusouris
mpongi / pongisommeil
NS
nse / sedessous
nsoso / sosopoulet
nsambo / sambosept
nsango / sangoinformation
nsinga / singafil
NT
ntina / tinaimportance
ntolo / tolotorse
ntalo / talovaleur
ntango / tangotemps
ntaba / tabachèvre

In all other cases, the first letter is mandatory.
(The unvoiced consonants - FR: Les consonnes sourdes)

NG
nguyapouvoir
ngaimoi
ngandabar
ngubaarachide
ngulucochon
MB
mbokavillage
mbelicouteau
mbetulit
mbilapalmier
mbisipoisson
ND
ndakomaison
ndekocousin
ndakisaexemple
ndumbaprostituée
ndundalégume
NZ
nzotocorps
nzetearbre, baton
nzelachemin
nzungumarmite
nzalafaim
NY
nyeiexcrément
nyosorien
nyokaserpent
nyamaanimal
nyongodette


e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2017 lingala facile 2018
privacy & cookies