FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

batata
pluriel de "tata"
tata, pl. batata (classe 1a/2 : - / ba-)
papa, père, homme, monsieur
voir aussi : papá, tata-leki, tata-koko
tags :
item 23 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na mísáto) ...
tata mosusu abimi libanda.
un autre homme est sorti dehors.
Tata azali na libanda. Benga ye.
Papa est dehors. Appelle-le.
tata kulutu
oncle paternel (plus âgé que papa)
tata koko
grand père
tata mwasi
tante paternelle
tata leki
oncle paternel (plus jeune que papa)
tata mobokoli
père adoptif, père nourricier
nayebi tata oyo, kasi nayebi tata wana te.
Je connais ce papa-ci, mais je ne connais pas ce papa-là.
kati ya tata na mama na yo, nani asalaka ?
Entre ton papa et ta maman, qui travaille ?
Tata na Ida, kombo na ye Théo.
Le père d'Ida, son nom est Théo.
tata na ye akufaki liwa ya mbalakaka.
son père était décédé d'une mort brusque
bomoyi ebandaka ntango liki ya mama ekutani na momboto ya tata.
la vie commence le moment où l'oeuf de la maman se rencontre avec le sperm du papa.
tata, mama, ndeko, tofuta mpaku ya mabele, po totonga ville ya kinshasa
papa, maman, cousin, payons la taxe du sol, pour que nous construisions la ville de Kinshasa
mama ya batisimo / mama wa batisimo / mama mobatisi. tata ya batisimo / tata wa batisimo / tata mobatisi.
Marraine. Parrain.
tata wa biso
Notre Père (prière)
kolia biloko ya tata na yo te. lia biloko mosusu
Ne mange pas la nourriture de ton père. Mange autre chose.
kende kosomba mapa pona tata na yo
Va acheter du pain pour ton père
tata na yo azoya lelo kotala yo
Ton père vient te voir aujourd'hui.
tata naza na posa ya mbongo po nasomba bilamba
Papa, j'ai besoin d'argent pour acheter des vêtements.
kokoma na ndako te. leka mbala moko epayi ya tata na yo.
N'arrive pas à la maison. Passe une fois chez ton père.
biso na bino, tozali bana ya tata moko na mama moko
nous et vous, nous sommes des enfants du même père et de la même mère.
tata na ngai pe asombi motuka
Mon père aussi a acheté une voiture.
mutu na ye ekokani na oyo ya tata na ye
Sa tête ressemble à celle de son père.
autres mots avec le tag 'famille' : mobóti, bokilo, bolóngani, bondeko, bonyangó, bosángó, mozéngé, ebóto, etike, nkulútu, léki, libála, libota, lipása, mama, litshombé, mwana, ndeko, nókó, papá, semeki, tata, yayá, kóko, nkóko, moana, muana, mobokoli, ya, nsimba, nzuzi, kulútu, kolonga, litsombé, mama-leki, tata-leki, tata-koko, mama-kulutu, mama-koko
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies