FR EN NL

translation / dictionary Lingala - English

congo rdc
Sentence :

nazomona
nazomona, form of a verb
komóno, regular construction (root : mon) (class 15 : ko- (verbs))
komóna, regular construction (root : mon) (class 15 : ko- (verbs))
to see, to notice
to meet
see also : kotála
tags :
item 27 examples (bandakisa ntúkú míbalé na nsambo) ...
nakolinga kaka komona yo
I desire just (only) to see you
Kosa liwa, bongo omona batu bakolela yo.
Fake death and so you will see who will cry over you.
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverb/expression (don't translate litteraly)
When the rain fell on the house of your friend, you found it insignificant, but the day it fell on you it became a problem.
Tambola na mokili, bongo omona makambo. Proverb/expression (don't translate litteraly)
Go around the world and so you'll see the problems
ezali esengo na ngai po na komona moko na moko na bino na liyangani oyo na sima ya nzanga.
It a pleasure for me to see everyone of you in this afternoon cult.
Namonaki ye. Alataki elamba te.
I saw her. She didn't wear any clothes.
Namonaki ndunda yango mbala ya liboso.
I saw that vegetable for the first time.
Nakoki komona eloko te mpo na molili.
I could see nothing because of the darkness.
Mokolo moko, nguma akendeki bokila na zamba. Amonaki nyama moko ya monene na amelaki ye mobimba.
One day the python went hunting in the forest. He had seen a large beast and had swallowed it entirely.
Soki miso na yo ezali malamu, okomona polele penza
If your eyes are good, you will see really clearly.
nakoki komona yango ?
Can I see that ?
Soki omonaka nzoto ya yo kilo, tala ya baninga se bongo Proverb/expression (don't translate litteraly)
If you observe your body with respect, see your neighbour's one just so
lala malamu. - yo pe, motema na ngai, noki tomonana. nalela yo makasi.
Sleep tight. - You too, my love, that we may see eachother soon. I thoroughly love you. (in lingala : "I have loved you thoroughly" - past)
bomoni momie wana ? azokosa biso. nakotchoukouté !
You (pl.) see that chick there ? She's lying to us. I will tchoukoutate her !
Na motema nayebaki ete ezali mabe, kasi namonaki ndenge mosusu ya kosala te.
In the heart I knew it was bad, but I saw no other way of acting.
namoni texto na yo kala te
I saw your text message not long ago
Namoni ozangi eloko ya kosala. Luka ata mosala ko ! kaka koyungana boye...
I see that you lack something to do. Look even for a job, come on ! just wandering like that...
yo okozwa mbata okomona !
You, you will receive a slap, you will see !
tokomonana mokolo mosusu
We will see each other again one of these days.
naza na posa ya komona yo lelo
I long to see you today
nazokende epayi ya munganga atala liso na ngai. nazomona malamu te.
I'm going to the doctor so that he looks at my eye. I don't see well.
otie biloko na ngai wapi. nazomona yango te.
Where did you put your things ? I don't see them.
soki loboko eyebaka pasi oyo lutu emonaka na tango ya kobalusa biloko
If the hand knew how the spoon suffers when stirring the food...
Nawuti komona bambila mwambe liboso ya ndako.
I just saw 8 policemen in front of the house.
Namona baleki na ngai kala.
It has been a long time I didn't see my brothers.
nalingi komona lisusu moto ya liboma oyo na ndako na ngai te.
I don't want to see that lunatik in my house again.
namonaka ye neti kaka ndeko na ngai
I see her only like my sister
other words with the tag 'verbs with [ko...o]' : komóno, kobongo, kopono, kolokoto, kosono, kotoko, kotóndo, kokóto, konétolo
e-mail : dic@lingala.be
 

interesting videos : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privacy & cookies