FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

somba
somba, forme d'un verbe
kosómba, construction régulière (racine : somb) (classe 15 : ko- (verbes))
acheter

kosómbisa
échanger (monnaie)
dérivés : mosombi
item 25 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na mítáno) ...
nasombaki motuka ya sika
j'ai acheté une nouvelle voiture
nasombi biloko ya kolia na wenze.
J'ai acheté des choses à manger au marché.
kende nanu kosomba lipa.
Va déjà acheter du pain.
Kosomba nanu lipa te.
n'achète pas encore le pain.
na ntongo oyo mama akeyi na zando asomba mapa
Ce matin mama est parti au marché acheter du pain.
tshombo na yo ebongi te ? okosomba ya sika ?
Ton GSM ne n'est pas réparé ? Tu vas acheter un nouveau ?
bomoyi ya moto basombaka te Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
On n'achête pas la vie de quelqu'un
po na kozwa bis okoki kosomba tiké po na mokolo moko, sanza moko to mbula mobimba.
Pour prendre le bus, tu peux acheter un billet pour un jour, un mois ou toute une année.
elamba oyo kitoko makasi. posa ya kosomba yango.
Cet habit est très joli. Envie de l'acheter.
kende kosomba mapa pona tata na yo
Va acheter du pain pour ton père
tata naza na posa ya mbongo po nasomba bilamba
Papa, j'ai besoin d'argent pour acheter des vêtements.
asombi liputa moko lokola ya ngai
Elle a acheté le même pagne que moi
nazosombela yo motuka ya sika. kobebisa yango te mbala oyo.
Je t'achète une nouvelle voiture. Ne l'abime pas cette fois-ci.
osombeli mwasi na yo tshombo ya sika
Tu as acheté un nouveau téléphone pour ta copine.
tata na ngai pe asombi motuka
Mon père aussi a acheté une voiture.
awuti kosomba pantalo ya pembe.
Elle vien d'acheter un pantalon blanc.
asombi tukutuku mususu. akomi na yango mibale.
Elle a acheté une autre moto. Elle en a maintenant deux.
pesa ngai falanga nasomba bilamba
Donne-moi de l'argent que j'achète des vêtements.
kende kosombela ngai kisi
Va m'acheter des médicaments.
asombeli ngai kazaka
Elle m'a acheté une veste.
nasombi mapa misato pona bana balia
J'ai acheté trois pains pour que les enfants puissent manger.
kende kosomba litungulu na zando.
Vas acheter un oignon au marché.
Mikolo oyo nateki te batu bazosomba malamu te mbongo eza te.
Ces jours je ne vends pas. Les gens n'achêtent pas bien. Il n'y a pas d'argent.
Soki tosangisi mbongo wana nyonso, tokoki kosomba lopango
Si on rassemble tout cet argent, on pourra acheter une parcelle.
Osombi mutuka na mbongo ya nani ?
Tu as acheté la voiture avec l’argent de qui ?
zikinda
zigida, pl. bazigida (classe 9a/10a (2) : - / - (ba-) : pluriel selon contexte (ou familier/moderne ba-), pas avec n-/m-)
zikita, pl. bazikita (classe 9a/10a (2) : - / - (ba-) : pluriel selon contexte (ou familier/moderne ba-), pas avec n-/m-)
zikinda
parures en rondelles (cou, taille,...)


Simba Zigida (somba zikinda)
Un marché à 500m de l'aeroport de Ndolo.
Surtout connu pour l'accident avec un Antonov
avec une cargaison illicite (des armes) qui s'est écrasé
sur le marché et la population présente, le 8 janvier 1996.
mayaka / zigida
mayaka / zigida
© Creative Waist Beads
voir aussi : liyaka
item 1 exemple (ndakisa mókó) ...
mpepo ekweyi na wenze ya Simba Zigida. Epanzi wenze. Bato nyoso bakufi.
Un avion est tombé sur le marché Simba Zigida. Il a détruit le marché. Tout le monde est mort.
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies