FR EN NL

vertaling / woordenboek Lingala - Nederlands

congo rdc
Zin :

mukolo
mokolo, mv. mikolo (klasse 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objecten)
mukolo, mv. mikolo (klasse 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objecten)Kinshasa versie
dag
tags :
item 37 voorbeelden (bandakisa ntúkú mísáto na nsambo) ...
mokolo na mokolo
dag na dag (elke dag)
Nini etungisaki yo mokolo wana ?
Wat baarde je zorgen die dag ?
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Gezegde/uitdrukking (niet letterlijk vertalen)
Wanneer de regen op het huis van uw vriend viel, vond je dat niet de moeite, maar de dag dat het op jouw viel is het een probleem geworden.
mokolo moko te. mbala moko te. eloko moko te. moto moko te. esika moko te.
Nooit (niet één dag). Nooit (niet één keer). Niets (niet één ding). Niemand (niet één mens). Nergens (niet een plaats).
poso ekoya mokolo moko eza nakosala te.
Volgende week is er een dag dat ik niet werk.
Lelo ezali mokolo ya suka. Lobi ezalaki mokolo ya liboso.
Vandaag is de laatste dag. Gisteren was de eerste dag.
lelo mokolo nini ?
Welke dag is het vandaag ?
na ntongo penza. eleko ya mokolo
(heel) vroeg in de ochtend. gedurende de dag.
mokolo ya bopemi. mokolo ya mosala.
rustdag (feestdag). werkdag.
mokolo ya kobotama.
geboortedag / verjaardag
omelaka makaya boni na mokolo ?
Hoeveel sigaretten rook je per dag ?
Mokolo moko, nguma akendeki bokila na zamba. Amonaki nyama moko ya monene na amelaki ye mobimba.
Op een dag was de python op jacht gegaan in het woud. Hij had een groot beest gezien en had het in zijn geheel ingeslikt.
osololi na ye mikolo oyo ?
heb je met hem gepraat deze dagen ?
yebisa ngai Wendy akoya kovisiter palais mokolo nini.
Laat me weten welke dag Wendy het huis zal komen bezoeken.
mikolo eleki ebele
Er zijn veel dagen voorbij gegaan.
mokolo mosusu nakobina na yo
Een andere dag zal ik met jouw dansen
po na kozwa bis okoki kosomba tiké po na mokolo moko, sanza moko to mbula mobimba.
Om de bus te nemen kan je een ticket kopen voor een dag, een maand of een heel jaar.
ntango mosusu / mikolo misusu
soms (een andere keer / verschillende dagen)
monoko ya mokolo elumbaka solo, kasi elobaka maloba ya solo Gezegde/uitdrukking (niet letterlijk vertalen)
De mond van de ouderling ruikt vies, maar de woorden zijn waarheid.
tokomonana mokolo mosusu
We zullen elkaar weerzien een van deze dagen.
mokolo mosusu kanda ekosila pe nakozonga tosamba © groupe Choc Star
Een dezer dagen zal de boosheid voorbij zijn en zal ik terugkomen zodat we oordelen
ozobima mingi mikolo oyo
Je gaat vaak uit deze dagen
mokolo nakokufa... ngai, mutu ya mbongo
De dag dat ik zal sterven... ik, een rijk man
mokolo nakoya nalingi batu nioso bazala
De dag dat ik zal komen, zou ik willen dat iedereen er zou zijn.
koloba na ngai boye te nazali mukolo na yo
Spreek zo niet tegen mij. Ik ben ouder dan u.
monoko na yo nde ekoboma yo mokolo mosusu
Het is je mond die je één van deze dagen de das zal omdoen.
mikolo oyo mbula ezobeta makasi.
Deze dagen regent het hard.
likambo oyo ekosila mokolo nini ?
Welke dag zal dit probleem stoppen ?
lelo ezali mokolo ya mbotama ya yesu
Vandaag is de verjaardag van Jezus
okoya epayi na ngai mokolo nini ?
Welke dag zal je bij me langskomen ?
okobota mokolo nini ?
Wanneer ga je bevallen ?
lelo ezali mokolo ya mbotama ya koko na biso ya mwasi.
Vandaag is de verjaardag van mijn grootmoeder.
pona nini mikolo oyo oza kolia kaka madesu ?
Waarom ben je deze dagen enkel bonen aan het eten ?
Mikolo oyo nateki te batu bazosomba malamu te mbongo eza te.
Deze dagen verkoop ik niet. De mensen kopen niet goed. Er is geen geld.
Mikolo oyo aza kokanga suki te.
De laatste tijd vlecht ze haar haar niet.
banda mikolo mibale azolia te.
Sinds twee dagen eet ze niet.
azalaki na yo te mokolo mobimba.
Ze was niet met u de hele dag.
item Article : datums
Les tijden/datums

De dagen van de week
1maandagmokolo ya liboso / mokolo ya yambo
2dinsdagmokolo ya mibale
3woensdagmokolo ya misato
4donderdagmokolo ya minei
5vrijdagmokolo ya mitano
6zaterdagmokolo ya póso / mokolo ya saba / mokolo wa kombo
7zondagmokolo ya eyenga / mokolo ya lomingo


De maanden
1januarisanza ya liboso / yambo
2februarisanza ya mibale
3maartsanza ya misato
4aprilsanza ya minei
5meisanza ya mitano
6junisanza ya motobayuni
7julisanza ya samboyuli
8augustussanza ya moambe
9septembersanza ya libwa
10oktobersanza ya zomi
11novembersanza ya zomi na mókó
12decembersanza ya zomi na mibalé


jaar
jaar 2013 mobu mwa nkóto míbalé na zómi na mísáto

mobu ya 2013


Allerlei
dagmokolo
weekmpóso
maandsanza
jaarmobu/mbula/mpela
avondmpokwa
nachtbutu
middagnzanga
ochtendntongo
vandaaglelo
gisterenlobi (eleki)
morgenlobi (ekoya)

In Congo, dicht bij de evenaar, zijn er geen 4, maar 2 seizoenen.

De seizoenen
droog seizoentángo ya elanga
regenseizoentángo ya mbúla
andere woorden met de tag 'tijd' : leló, lóbí, mbúla, mobú, mokolo, moyi, ngonga, mpókwa, sanza, tango, mói, mpóso, póso, ndéle, nzángá, pókwa, manáka, mvula, pokua, mukolo, mbúla, er, kombo, sánzá, yulí, yuní
e-mail : dic@lingala.be
 

interessante filmpjes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
privéleven & cookies