FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

mwanana
natikaka
natikaka, forme d'un verbe
kotika, construction régulière (racine : tik) (classe 15 : ko- (verbes))
laisser, abandonner
eloko eleki tika eza te
eloko eleki tika eza te
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
tika mutuka libanda
tika mutuka libanda
© pvh
dérivés : etike, kotikala, etika
item 24 exemples (bandakisa ntúkú míbalé na mínei) ...
Otikaki lipa na yo awa, namelaki sucré nango
Tu as laissé ton pain ici, j'ai bu un sucré avec ça.
tika makelele !
arrête le bruit !
tika ngai nye
Laisse moi tranquil
Natiki komela likaya banda lelo.
J'arrête de fumer à partir d'aujourd'hui.
Tika makelele ya pamba pamba, suba olala
Laisse ce bruit inutile, fais pipi que tu dormes.
Soki olingi kozwa engunduka, bisika ya kotika motuka ezali.
Si tu veux prendre le train, il y a des endroits pour laisser la voiture (parkings).
lolenge boni ebongi bayebisa yo pona otika komela kisi oyo
Comment il faut te faire savoir d'arrêter de prendre ce médicament ?
lolenge boni nakoki koloba na mobali oyo pona atika nga kimia
Comment je peux parler à cet homme pour qu'il me laisse tranquil ?
nani alie biloko na ngai oyo natikaki ?
Qui a mangé ma nourriture que j'avais laissé ?
kotika bana bango moko te
Ne laisse pas les enfants seul.
kotika ngai te, Yawe, nazali mwana na yo
Ne me laisse pas, Seigneur, je suis ton enfant.
bozala na bomoko. botika kosuana boye
Soyez unis. arrêtez de vous disputer comme ça.
tika koganga makasi
Arrête de crier fort.
tika kolembola sani boye
Arrête de lécher l'assiette comme ça.
tika nzungu polele pona biloko ebela malamu
Laisse la casserole ouverte afin que la nourriture cuise bien.
kotika mulangi polele te. kanga yango.
Ne laisse pas la bouteille ouverte. ferme-la.
okoya kotela makasi pamba, tika kopakola mafuta wana
Tu risques de fort éclaircir pour rien, arrête de mettre cette crème-là.
tika kosala mokinza.
Arrête de péter.
eloko eleki tika eza te
rien n'est mieux que de laisser (tomber).
Tika kobeta mukinza liboso na ngai
Arrete de péter devant moi
Naza mwasi na ye te. Tika kotungisa ngai sikoyo.
Je ne suis pas sa femme. Arrête de me déranger maintenant.
akeyi kotika mwasi na ye.
Il est parti déposer sa femme.
Soki olingi ke libala na biso ezala malamu, tika kokengela ngai.
Si tu veux que notre mariage soit bien, arrête de me surveiller.
Esili te. Nakotika ye boye te.
Ce n’est pas fini. Je vais pas la laisser comme ça.
moke
moke, pl. mike (classe 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objets)
muke, pl. mike (classe 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objets)version Kinshasa
mukié, pl. mikie (classe 3/4 : mo- (mu-) / mi- : objets)argot
peu, petit, insignifiant
mince, maigre, moindre
tshombo : elikia moke
tshombo : elikia moke
src : vmk tech
item 14 exemples (bandakisa zómi na mínei) ...
Mbula enokelaka ndaku ya moninga omoni yango moke, kasi mokolo ekonokela yo ekomi matata. Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
Quand il pleuvait sur la maison de ton ami, tu trouvais ça insignifiant, mais le jour que c'est tombé sur toi c'est devenu un problème.
Ezali ntalo mingi. Kakola moke.
C'est très chèr. Marchande un peu.
elengi na mbeto: Muasi ya monene na muasi ya moke, nani azali sukali ? © kitokolile
plaisir au lit: Une grosse fille et une fille mince, qui est bonne ?
ndaku ya monene, ndaku ya moke, ndaku ya suka, ndaku ya liboso
une grande maison, une petite maison, la dernière maison, la première maison
muana moke amelaka likaya te
un petit enfant ne fume pas de sigarette
Maman azali malamu moke
Mama va un peu bien
kopesa ye mbongo mingi te, aza nanu mwana muke
Ne lui donne pas beaucoup d'argent, c'est encore un petit enfant
awa nde nazalaki kofanda tango nazalali mwana muke
c'est ici que j'habitais quand j'étais un petit enfant
aza nanu mwana muke. azomela likaya na mbula na ye.
Il est encore un petit enfant. Il fume la sigarette à son age.
kokita nanu te. zela mukie.
Ne descends pas encore. attends un peu.
aza kaka mwana muke. Kopesa ye bazoka te.
Il n'est qu'un petit enfant. Ne lui donne pas de chique.
Tokotambola makolo pona tokonda mukie.
On va marcher à pied pour qu'on maigrisse un peu.
seka muke balula yo
Souri un peu, qu'on t'admire
komela mingi, kolangwa muke
Beaucoup boire, s'enivrer un peu
sima
nsima, pl. bansima (classe 9/10 (2) : - / - (ba-) : pluriel invariable selon contexte (ou familier/moderne ba-))consonne sonore
sima
après, ensuite, plus tard
l'arrière
le derrière, le dos, les fesses
tala sima, zonga moto
tala sima, zonga moto
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
tags :
item 11 exemples (bandakisa zómi na mókó) ...
sima ekoli (sim'ekoli)
le derrière est grand
akei nanu na zando, (na) sima akokende mosala.
Il part déjà au marché, après il partira au travail
akei liboso na zando, (na) sima akokende mosala.
Il part au marché premièrement, après il partira au travail
loba sima na ngai : ...
dis après moi : ...
Zoba liboso, mayele na sima.Proverbe/expression (ne pas traduire litteralement)
idiot avant, sage après
sima ya nzángá
après-midi
ezali esengo na ngai po na komona moko na moko na bino na liyangani oyo na sima ya nzanga.
C'est pour moi une joie de revoir chacun de vous dans ce culte de l'après midi.
zonga sima.
recule (retourne en arrière)
bacables ya courant ezotokatoka awa na sima ya mvula
les cables d'électricité bouillent ici après une pluie
kende kolembola masoko / sima / babottes ya mokonzi.
va lêcher les fesses / le derrière / les bottes du patron. (flatter)
tala sima zonga moto
regarde en arrière et redeviens humain
autres mots avec le tag 'corps' : bongó, bontólo, ebángá, lobebú, ebekú, ebelo, ebóbó, eboló, edádá, elongi, enama, esóngó, kíngó, libéle, liboló, libolongo, libumu, lifuni, likata, lokolo, lino, linzáka, lipeka, lisisa, liso, lisókó, litáma, litoyi, lokéto, lolemo, loposo, makilá, mandéfu, lisásámbá, lobebo, mbunzu, moyoyo, mofáti, mokongo, mongóngó, mopanzi, mosapi, motéma, mupende, monoko, mutolo, motó, tólo, nzóto, poso, pótá, nsima, losúki, zólo, litói, lomposo, lobôko, lisu, kunza, kovo, lolému, súki, engóngólo, monzômbâ, nkíngó, ntólo, mompúlúlú, likundú, motolú, mosopó, libale, mosómba, likáká, etindi, mopende, búnya, lolemu, mbángá, motshopo, zémi, etambe, libandi, likosi, linu, lopiko, libundi, lokíkí, manduta, muika, mopiko, nkunki, sóka, soyi, lolemo, lokéto, mpótá, lotó, monsisá, mutema, libondi, goró, lotókó, mpanzí, litolú, motoló, ndéfu, mimbebo, mokunza, mposo, lokíkí, nsóka, monpúlúlú, ebebú, liliká, mataku, mosai
simá, pl. basima (classe 9a/10a (2) : - / - (ba-) : pluriel selon contexte (ou familier/moderne ba-), pas avec n-/m-)
ciment
sima
sima
src : radio okapi
item 1 exemple (ndakisa mókó) ...
sopa mayi na sima
verse de l'eau sur le ciment
ekoli
ekoli, forme d'un verbe
kokóla, construction régulière (racine : kol) (classe 15 : ko- (verbes))
grandir
accroitre
murir

kokólisa
élever, éduquer

kokólola
raser (visage, tête)
racler
dérivés : ekólo, mokóló, nkolo, mokóló, mokókóló
item 5 exemples (bandakisa mítáno) ...
sima ekoli (sim'ekoli)
le derrière est grand
nzete ya mbila bazokata ezokola
L'arbre palmier qu'on a coupé est en train de pousser.
kokola ya mwana ebandaka na mino © Adolphe
La croissance de l'enfant commence aux dents
pona kokola malamu ebongi komela mayi mingi
Pour bien grandir il convient de boire beaucoup d'eau
Mwana ebongi amela miliki pona akola malamu.
Un enfant doit boire du lait pour bien grandir.
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2017 lingala facile 2018
protection de la vie privée et cookies