FR EN NL

traduction / dictionnaire Lingala - Français

congo rdc
Phrase :

eyaki
eyaki, forme d'un verbe
koya, forme irrégulière ! (racine : ye) (classe 15 : ko- (verbes))
venir, avancer, arriver

Aussi utilisé pour exprimer un risque, risquer (voir exemples)

koyela
venir pour...
apporter, amener
Koya maboko pamba te
Koya maboko pamba te
src : google images
bilenge, bozali na mikakatano ... yaka awa, tosolola.
bilenge, bozali na mikakatano ... yaka awa, tosolola.
© pvh (Letitia Nkanza Kalawuma)
google
google
src : google images
epekisami kosokola na ebale
epekisami kosokola na ebale
© pvh
dérivés : boyei
tags :
item 67 exemples (bandakisa ntúkú motóbá na nsambo) ...
okokaki koya ( na ) makolo
tu pouvais venir a pied
pongi eyaki te
le sommeil n'est pas venu
Poso eleki, poso ekoya
la semaine passée, la semaine prochaine (qui vient)
eyenga eleki nayaki na liyangani ya mibale
le dimanche passé je suis venu au deuxième culte
nazoya (nazali koya)... naza na nzela... nakomi
je suis en train de venir... je suis en route... je suis arrivé
poso ekoya mokolo moko eza nakosala te.
La semaine prochaine il y a un jour que je ne travaille pas.
yaka, landa ngai
viens, suis moi
Moto azoya, bomba yango nokinoki.
Quelqu'un arrive (est en train de venir), cache ça vite vite.
esongo ezali mwa eteni ya libolo eye etimbaka.
attention - contenu sensible
yebisa ngai Wendy akoya kovisiter palais mokolo nini.
Fais-moi savoir quel jour Wendy viendra visiter la maison.
yaka tosibana, naza na botine
attention - contenu sensible
baboti na yo bayaki kobwaka ngunda na poto. yango wana sikoyo oza awa na biso.
Tes parents sont venus demander asile en europe. La raison pour laquelle maintenant tu es ici avec nous.
azoya, bombana noki
Elle arrive, cache-toi vite
mama aye nzala esili
Maman est là, la faim est fini
mokili toyaki etondi na mabe
Le monde dans lequel nous vivons (/sommes arrivés) est rempli de mal
mokolo nakoya nalingi batu nioso bazala
Le jour que je vais viendrai, j'aimerais que tout le monde soit là.
yaka po tokende kotala yaya na yo ya mwasi
viens pour qu'on aille voir ta grande soeur
naye po tosolola likambo wana
Je suis venu pour qu'on cause de ce problème là
boni lelo oye tongo boye ? likambo ?
Comment ça se fait que tu es venu si tot ? Il y a un problème ?
tata na yo azoya lelo kotala yo
Ton père vient te voir aujourd'hui.
koya lelo te. naza na makambu ebele ya kosala
Ne viens pas aujourd'hui. J'ai beaucoup de choses à faire.
koya na moninga na yo wana te. nalingaka ye te.
Ne viens pas avec ton ami là. Je ne l'aime pas.
kokanga ekuke te. nazoya
Ne ferme pas la porte. J'arrive.
koloba mingi te. nazoya sikoyo.
Ne parle pas beaucoup. Je viens maintenant.
tozali koya epayi na bino sikoyo
On arrive bientôt chez vous.
oye, opesi biso ata mbote te. likambo nini ?
Tu es venu, tu ne nous a même pas salué. Qu'est-ce qu'il y a ?
ebongi obongisa esika oyo. bapaya bazali koya.
Il faut que tu arranges cet endroit. Les gens arrivent.
ngai pe nalingi koya na bino
Moi aussi je veux venir avec vous.
mbala ya liboso oyaki awa ozalaki koyoka soni
La dernière fois que tu étais ici tu avais honte.
nakoki koya kofanda na ndako na yo ?
Est-ce que je peux venir habiter dans ta maison ?
aza nanu mwana muke. azomela likaya na mbula na ye.
Il est encore un petit enfant. Il fume la sigarette à son age.
okoya epayi na ngai mokolo nini ?
Tu viens chez moi quel jour ?
oza nanu elenge. kosala yango te. okoya kobebisa bomoi na yo.
Tu es encore jeune. Ne fais pas ça. Tu risques de gâcher ta vie.
boma moto okoya kotumba ndako pamba
Eteins le feu. Tu risques de cramer la maison.
bapaya zomi baye kotala biso
10 visiteurs sont venus nous voir.
nayeli bino nsango ya malamu. boyoka.
Je vous ai apporté une bonne nouvelle. écoutez.
yela ngai mwa ndambo ya loso po nalia
Emmène-moi une petite portion de riz pour que je mange.
bato misato bayaki koluka yo lelo
Trois hommes sont venu te chercher aujourd'hui.
aza koboya koya awa, pona nini ?
Elle refuse de venir ici, pourquoi ?
kanga monoko na yo pamba te okoya komela nzinzi.
Ferme ta bouche sinon tu risques d’affaler une mouche.
losaka pona biloko oyo oyeli biso
Merci pour la nourriture que tu nous as apportée.
molimo mosantu yaka osunga biso.
Saint Esprit vient nous aider.
yaka tokanga foto moko
Viens qu'on fasse une photo.
okoya kotela makasi pamba, tika kopakola mafuta wana
Tu risques de fort éclaircir pour rien, arrête de mettre cette crème-là.
Yaka kosunga ngai, naza na biloko ebele ya kolamba.
Viens m'aider, j'ai beaucoup de choses à préparer.
liyebo yaka kotala liyebo oyo.
Viens voir ce champignon.
Yaka na moziki na biso.
Viens à notre levée de fonds.
Yaka totanda mesa bato balia
Viens qu'on fasse la table pour que les gens mangent.
kende kozua bisaka na yo oya kofanda epayi na ngai
Va chercher tes affaires que tu viennes habiter chez moi.
mwasi oyo atongelaka yo bilamba ayaki awa.
La dame qui faisais des vêtements pour toi (ta couturière) est passée ici.
yela ngai masanga mbila namela.
Apporte moi le jus de palme, que je boive.
mama ya mobali na yo akoya lisusu te.
Ta belle-mère ne va plus venir.
yo ozali na kati ya motema na ye te.
Toi, tu n'es pas dans son cœur.
mobali na yo ya sika, kombo na ye nani ?
Ton nouveau mari s’appelle comment ?
Ayebi ata kokoma kombo na ye te.
Elle ne sait même pas écrire son nom.
Akoya lelo lisusu te. Akoya kaka lobi.
Elle ne viendra plus aujourd’hui, elle viendra que demain.
ozalaki kozela ngai naya pona obanda kolamba ?
Tu attendais que j’arrive pour que tu commences à cuisiner ?
Nabengaki liboso ya koya.
J’avais appelé avant de venir.
noko, yaka kobina na ngai.
Oncle, viens danser avec moi.
nakoya koniata yo pamba.
Je risque de te piétiner pour rien
yela ngai mayi nasopela ye.
Apporte moi de l’eau que je l'arose.
aye lisusu, mama wana ya liboma.
Elle est encore venue, la dame folle là
Aya, tosolola na ye esengeli .
Qu’elle vienne, qu'on parle avec elle comme il faut.
mwasi kitoko, yaka awa.
Jolie fille, viens ici.
Mwana oyo libota naye basundola ye po akoma bulawayo.
Cet enfant, sa famille l'a abandonné parce qu'elle est devenue prostituée.
bato boni bayaki likita ?
Combien de personnes y avait-il à la réunion ?
Mondimi ake Dubai ayeli maman pasteur maputa. Maman pasteur ake Dubai, aye maputa adefisi bandimi
Le croyant va à Dubai, il emène maman pasteur des pagnes. Maman pasteur va à Dubai, elle ramène et elle vend les pagnes à crédit.
autres mots avec le tag 'irrégulier' : kolia, kokende, kotia, koya, kolya, koliya, kotya, kotiya
e-mail : dic@lingala.be
 

vidéos intéressantes : lingala facile 2018 lingala facile 2019
protection de la vie privée et cookies